Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
LOSAKO
23 novembre 2007

NGBANDA... NIOSO KAKA SE NGA « Je suis tout le monde… et personne ; je suis partout et nulle part. Appelez moi… DARKMAN ! »

ngbandaEZALAKI MOKOLO MOKO, MOTO MOKO BANA MBOKA BAZALAKI KOBENGA YE << TERMINATOR >> AZALAKI KOSALA PEMBENI YA MOKONZI MOKO MABE, MOKONZI YANGO ABEBISA MBOKA NA YE PE ALINGAKI MOTO ALOBA NA YE TE, SOKI OLOBI AZALAKI KOTINDA << TERMINATOR >>... YE NDE PO ASILISA MOSALA... YANGO WANA MBOKA MOBIMBA EBENGAKI YE << TERMINATOR >> DONC << MOSILISI >>... OMONI YE, OMONI LIWA !

PEMBENI YA MOKONZI WANA YA MABE, AMONISI BATO PASI PENZA... BANGO KAKA BALIAKA MAIS BATO YA MBOKA PASI NA PASI.

PASI ELEKI, BATO YA MBOKA BALUKI MOTO NINI AKOKI KOLONGALA BANGO NA LIFELO, BA PAYA OYO YA PEMBENI BASANGANI PE BANDIMI KOSALISA BATO YA MBOKA PONA KO BENGANA MOKONZI MABE... NA SIMA YA BITUMBA, BALIA NGANDO, BA SEPELA MAIS MOKOLO NGANDO ALIA BANGO... EZALA MOKONZI, TERMINATOR ETC... NIOSO BAKIMI PE BATO YA MBOKA BA SEPELI... << TO BIKI PO NZAMBE AYOKI KOLELA NA BISO... ALONGOLI BISO SATANA >>

MAIS MAIS MAIS

BAYE BATO YA MBOKA BAKANISAKI BA NDEKO PO BA BIMISAKI MOKONZI MABE NA BATO NA YE NIOSO... NZOKA BANGO PE BA ZALAKI NA MAKANISI MABE... BA NGUNA, NDENGE MOKONZI MABE NA BATO NA YE BASALAKI MBOKA... BANGO PE BA BANDI KOSALA ELONGOBANI.

MBOKA EBANDI LISUSU KO LELA... AAAHH TATA NZAMBE, PONA NINI KAKA BISO ? MBOKA OPESI BISO EZA NA NIOSO MAIS BA SALI YA MITEMA BOLAMU BAZA TE... KAKA BATO YA MABE TI NA BAYE TOKANISAKI BANDEKO, NZOKA BA NGUNA ?

AH TATA NZAMBE , KITA OSALA !

MOKONZI ESIKA AKIMA, KUFA EZUI YE NA PASI YA KOTIKA MBOKA, MAIS BATO NA YE MISUSU BA TIKALI... MOSIKA NA MBOKA MAIS MAKANISI KAKA NA MBOKA.

NDENGE NINI TOKOKI KOSALA AWA MOKONZI AKUFI, ATIKI BISO ? TO SENGA KAKA BOLIMBISI NA BANA YA MBOKA BOYE TO ZONGA... NDAMBO TE, MAIS KASI EBELE BASENGI BOLIMBISI NA BANA YA MBOKA TE, MAIS KASI NA BA NGUNA... NIOSO WANA KAKA PONA LOKOSO.

NA KATI YA NDAMBO ETIKALI... << TERMINATOR >> NA KATI, YA BAYE BASENGI BOLIMBISI NA MABE NISO OYO BASALI NA BANA MBOKA...

NGBANDA, ANCIEN MOBUTISTE, YE NDE SURNOME << TERMINATOR >> PONA MOSALA OYO AZALAKI KOSALA PEMBENI YA FEU LE DICTATEUR MOBUTU.

20 ANS PEMBENI YA MOBUTU, NGBANDA A PARTICIPÉ NA PASI YA BANA MBOKA PE ADONDI NA BOMENGO NA SIMA YA MOKONGO YA BANA MBOKA.

NGBANDA AZA NA MAKILA YA BANA YA MBOKA AUTANT QUE BA KABILA, NKUNDA ETC...

NGBANDA MOTO MABE TO MALAMU ?

NA LOPOTO BALOBAKA << IL N’Y A QUE LES IMBÉCILES QUI NE CHANGENT PAS D'AVIS... N'EST-CE PAS ?

LELO NGBANDA ABONGWANI, AKOMI MWANA MALAMU, ASENGI BOLIMBISI NA BANA MBOKA...<< EZA BISO TE, MAIS BA GENERAUX YA FEU MOBUTU NDE BA BOMI MBOKA >>.

BANA MBOKA BALIMBISI MAIS BA BOSANI YE ATA MOKE TE !

NA BITUMBA OYO BANA MBOKA BAZO BUNDA NA BA NGUNA, PO BA BIMA NA MBOKA NA BISO, TERMINATOR AMIKOTISI NA KATI, << BANA MBOKA BO KEBA, BATU WANA MABE, BAKO BOMA BINO PE BAKO YIBA  NIOSO ETC...>>

BANA MBOKA BAYOKI PE BALOBI KASI KOTA NA KATI YA BITUMBA PO ELONGO BA NGUNA BA BIMA...

NA KATI, TERMINATOR ABANDI PE KOLOBA...  MAIS NA KOLOBA PETIT A PETIT TERMINATOR AKOMISI LIKAMBO YA BANA MBOKA PERSONNEL...

BITUMBA EBANDI NA LUMUMBA, TSHISEKEDI TI LELO...

YE NDE MOTO ALAKISI BANA YA MBOKA QUE BATO WANA BAZA BA NGUNA << BOYAKA NGA, BINO NIOSO BOZALA NA SIMA NA NGA, SOKI NGA TE, MAIS BAKOSI BINO, BA NGUNA BAZO LUKA BA BOMA NGA PONA BINO ETC... TALA MAKAMBO EBELE EKOMI NA MONOKO YA TERMINATOR... NIOSO KAKA SE YE !

PONA NINI NGBANDA AZO FOCALISER MAKAMBO NIOSO EPA NA YE ?

BITUMBA KAKA YE, BALOBA BOYE KAKA YE, BASALA BOYE KAKA YE...

NGBANDA PARTOUT ET EN MÊME TEMPS NULLE PART... TERMINATOR LISUSU TE, MAIS *DARKMAN

EBELE YA BANA YA MBOKA BAZO KUFA... EBELE BAZO SOPA MAKILA NA BANGO PONA MBOKA... YE AZO SALA NINI ?

KAKA OYO YE ALOBI NDE BONGO... KASI PONA NINI ALOBAKI TE TANGO MOBUTU AZALAKI KOSALA MABE ?

ALOBI ALOBI, KABILA AZA KAKA PRESIDENT...

AFINGI AFINGI, BEMBA BA BENGANI YE...

SOKI KAKA LIKAMBO ELEKI, AH NA YEBISAKI BINO NINI ???

MOTO NIOSO AKOMI DANGER PONA MBOKA... KAKA YE NDE MOTO MALAMU

MAIS TERMINATOR COMME YO NDE OLAKISI BANA YA MBOKA MABE YA BA NGUNA... COMME YO NDE OZA NA SOLUTION PONA MBOKA... BANA MBOKA NIOSO BANDIMI KOZALA NA SIMA NA YO... ZONGA OKENDE KO BENGANA BANGO !

BANA MBOKA BO TELEMA... BANA MBOKA KASI BA TELEMI, SIKOYO BAZO ZELA YO PO OLAKISA NZELA DONC OZALA LIBOSO PO TO KENDE ETUMBA YA BIKA << LIBERATION >>

TERMINATOR OU *DARKMAN... YO NA BANGO... BO KESENI EZA TE, SOKI TOKOKI KO BUNDA PONA MBOKA BOLAMU MINGI, MAIS SOKI PONA KO LOBA LOBA NA SIMA BAPESI YO OYO OLINGI OSIMBI NZELA OKIMI... NDENGE KAKA OKIMAKA MBALA YA YAMBO...MAWA MINGI !

MBOKA EZA KOBEBA LIKOLO YA BA NGUNA TE, MAIS LIKOLO NA BINO... SOKI BO SALAKI MOSALA BOLAMU, MAIS NIOSO OYO ESALEMA TE... NA MBOKA BA NDEKO NA BISO BAZA NA PASI YA LELO TE, SOKI OYEBI TE OU OBOSANI , TANGO OZALAKI KOSALA MABE NA MBOKA, BATO MISUSU PE BAZALAKI KO KUFA.

MAKAMBO EZALI EBELE YA KOLOBA, MAIS BANA MBOKA BAZA NA KONDIMA QUE OKO CHANGER PENZA SOLO PONA BO LAMU YA CONGO...

* met en place un plan pour assouvir sa vengeance contre ceux qui l'ont laissé pour mort.

La patrie ou la mort, nous vaincrons

Publicité
Commentaires
P
Bonjour losako,

J'ai lu avec attention tes commentaires sur Ngbanda.Monsieur,il serait plus intéressent de prevenir les congolais de ce qui leur guette sur les douleurs au kivu et notre soucis de ne pas voir notre pays balkannisé.Au lieu de critiquer NGBANDA ;ilfaut peut être admirer son travail et que nous puissions profiter et après nous lui demanderons les comptes de son bilan au pouvoir.
Que font les autres MOBUTISTES????les mokolo,kengo,she okitundu ,kamanda,kamitatu...ils sont tres riducules avec leur positionnement politique pour les intérets personnels.
Il n y a que les im bésiles qui ne changes pas.
B
Bonjour Losako,
En effet, je suis une lectrice assidu de ton super blog !

je trouve ton lisapo onge très clair et très pertinent. Il serait temps aussi que le peuple Congolais se réveile et se mobilise pour faire partir cet imposteur de Kanambe Hypolite.
Bien à toi et... Surtout continu la lutte...
Publicité
Archives
LOSAKO
• Le porte-voix de tous ceux qui cherchent vainement dans quel forum de ce monde, ils peuvent se faire entendre.. Oui, je veux donc parler au nom de tous les « laissés pour compte » parce que « je suis homme et rien de ce qui est humain ne m’est étranger ».
• Accueil du blog
• Créer un blog avec CanalBlog
Catégories
Publicité